William Likuta, nouvelle coqueluche du DCMP (lingala)

Par Muko
134 Vues

William Lwezi mobeti ndembo ya sika o kati ya lisanga ya DCMP oyo azali kopesa nkokoso epayi ya ba nguna ?

William Likuta Lwezi oyo akolata motango ya elamba 24 amonani okati ya etuluku ya baye ba ponami na lisanga ya ndembo ya Daring na eleko eye. Ye oyo awuti okati ya eteyelo ya ndembo na kombo ya UJANA, mpe na lisanga ya ndembo liye lizali na kombo se moko (UJANA). Mobeti ndembo o lingomba liye likosangisaka masangá ya ba beti ndembo na engumba mboka mokonzi Kinshasa.

Ye mobeti ndembo na lokolo ya muasi, lokola makila ya sika, amononi moko ya baye ya sika bazali kopesa mpasi o liboso ya ba nguna ya lisanga ya ndembo na kombo ya Daring Club Motema Pembe New Look (Lokolo ya Sika), oyo ewuti na Isaac Ngata. Lisanga éye Daring na boluki bozongeli ba nkembo nionso biye babungisa kala mpe ba Nkeni, to mpe mitole, kasi koleka nionso bokoti ya yambo na molongo ya etumba ya ndembo o molongo mua mokili ya Afrika kolandisama na eteni ya bokaboli masangá ya ndembo, liyé lizali kosalema na kati ya afrika na bobongisami na lisangá ya CAF.

Ewuti ye kondimama na lisangá ya ba ndimi ya Daring oyo babengami Tupamaros, William Likuta Lwezi akoti o motema ya lisangá ya ndémbo éyé ‘‘Doraˮ na ba mbala yiké. Kaka te lokola mokaboli motopi mpo na kotiya mongeté, kasi koleka mingi lokola motîyi mongété. Naboye atalisaki yango mbala mibale na mposo oyo. Mokolo mua Lundi 29 Septembre 2019, liboso ya lisangá ya ndémbo Don Bosco, na mongété liyé lipesaki élonga na ngambo ya DCMP, atiaki mongété na ngonga ya minute 58’’.

Mpe lisusu na momekano ya mboka, ezali mpe kaka William Likuta Lwezi na minute (11’’) nde afongolaki nzela ya mingété mpo na Imana, na kopolisa Nyuki (5-1). Moto na kofongola miso na lolengé kitoko ya bobeteli ndémbo oyo etalisami na Daring, Likuta nde apesaki motope liyé lipesaki nzela na Vinny Bongonga ayeba na kotiya mongété ya isato, mpe mongété ya itano na moninga mosusu. Kaka na lisano ya ndembo yango na ba mbala mingi, amitalisaki lisusu na bobeti mimbombo ya kafu-kafu, oyo bizalaki kokende na nzela ya monyama, ata ko bongo, mobateli ya poto ô ngambo ya Nyuki na kombo ya Arsen Kambale azali wana mpo na kolongola yango, kasi mingété mikotaki ebele o kati ya monyama naye.

William Likuta na ntango ya élonga 5-1

William Likuta na nzela ya babeti ndembo bayé bakenda sango na IMANA.

Na tango oyo babeti piololo na suka mpona bosukisi masano ya bokutani ya Daring na Don Bosco, kombo ya Likuta ezali na bibebo ya bana Imana banso oyo bazalaki koyemba se likambo ya lokolo oyo esalaki makambo ya kokamua. Na botondi likabo ya ndembo, boye Likuta akozala na kotiya ntembe te, soki akokoba kosala mpe na botosi nde akozala na molongo ya bayé basala kombo minene oyo esala lisitoile ya DCMP lokola Biscote Mbala oyo bazalaki kobenga ye « pied de Jésus » (Lokolo ya Yesu), Emeka Mamale, Shora Matudidi, Mbiyavanga Maestro, Bwayi Rigo, Jean jacques Yemueni Ngidi. To mpe lisusu lokola Kiyika, Lukaku oyo ya Papa, pona nini te na lolenge ya likabo yakobetela oyo ezalaki na Kakoko Etepe oyo babengaká ye « Dieu de Ballon » (Nzambe ya Bale), mpe Raoul Kidumu to mpe basusu.

Mobeti ndémbo ya solo solo oyo abimi na éteyelo ya « UJANA »

botombuami ya Likuta ezali libaku ya mpuasa te, to mpe libaku ya mbala-kaka, kasi elandi molongo ya bayé balekaki liboso naye, lokola Chadrack Muzungu, Lokombe, Mercey Ngimbi Mvumbi, Ernest Luzolo Sita oyo balekaki mpe bazali kino sikoyo kosala mosala kitoko na lisangá ya ndémbo ya Vclub. Basusu bazali kobeta ndémbo na Dauphins Noirs, mpe Ngimbi azali mokambi na

babeti ndémbo na lisangá ya Maniema-Union, nzoka nde Muzungu ye azali kobeta na ngambo ya lisangá ya ndémbo ENPPI ya Egipito.

Articles liés

P